Yezu akiti

P.Balenza

Refrain 1. Noel Gloria (4x)

Refrain 2. Yezu akiti, atiki kiti ya bokonzi atiki ya Ye nkembo,

Ayei na mokili na nguya, aponi nzoto ya moto

Ayei lokola mwana,

Na nse eye ya masumu, solo Nzambe mpe Moto

Aponi ndako ya bibwele,

Abokwami na bato, avandi kati ya bato

Nzoka Ye mpenza Nzambe (2x)

1. Ye ko lisumu te Ye Mosantu, amikitisi amikabi,

    Mpo te ngai na yo tobika.

2. O ebandela Ye azalaki, mpe na nsuka Yezu akozala,

    Oyo bokonzi nsuka te.

3. Lokola Ye mosusu azali te, oyo andimi komibonza,

    Mpo te ngai na yo tobika.

Noel Gloria

Nkembo na Nzambe o likolo,

O nse boboto na bato balamu,

O nse boboto na bato ba bolingo,

O nse boboto na bato ba boyambi,

O nse boboto na bato ‘a bosembo.