Toyemba App

Sango malamu

P.Balenza / lopa

Refrain. Beta mbonda, yembelani banso : Nsango malamu

Kumisani, kembelani banso : Nsango malamu

Sepelani, yokani liloba : Nsango malamu

Mobikisi ayei na mokili : Nsango malamu

1. Mobikisi ya mokili, akolongola molili,

    Amemeli biso mwinda, ayei kongengisa nzela.

2. Nzambe solo Moto solo, ayei na bokonzi lelo

    Oyo akondimela Ye nd’akoti’o bokonzi bwa Ye.

3. Yambo binso bikelama, ezalaki se Liloba,

    Liloba ekomi nsuni, evandi kati ya bato.

4. Bolingo ya Nzambe emonani, elaka ekokisami,

    Bamotindeli Mesiya, Ye nsuka ya baprofeta.

5. Balolanda bakomona, bibosono bakobika,

    Ye nde Liziba lya bomoi, nguya na Ye eleki nyonso

6. Ayei kozongisa elikya, na mitema milembi e,

    Ayei kozongisa bomoi, esika kufa ezali.