Likolo sepela
Refrain. Likolo sepela nse bina na nsai e
Mbu na binso bizali wana biganga makasi
Bolingo bwa Nzambe bomononi o miso ma bato
Maye alakaka bankoko ba biso ekokisami.
1. Bato bazalaka kotambola e: na molili
Bamoni mwinda monene mongengi
Mongengeli bato bafandaki o mokili mozangi moi
2. Olongoli mokumba o mapeke ma biso
Obwaki fi mbo ya bato babeteki biso o mabele
Obuki lingenda lya monyokoli, lya monyokoli
3. Obwaki bibundeli binso bya bitumba : o moto
Bilamba bibebi na makila: omotumbi
Botutu bonso botondi makila: omotumbi
4. Baboteli biso ye ye ye Mwana moko
Nzambe apesi biso Mwana mobali Emanuele
Akozala Mokonzi wa mikili minso
- Bakobenga Ye:
Nkumu wa bwanya, Nzambe wa bokasi
Nzambe wa lobiko, Mokonzi wa boboto.
- Ayei kolakisa bonene bwa Nzambe :
- Ayei kolakisa mayele ma Nzambe :
- Ayei kobandisa bokonzi bwa Nzambe :
- Oyo amoni Ye, amoni Tata :
- Oyo ayambi Ye, ayambi Tata :
- Oyo atosi Ye, atosi Tata :
Finale : Likolo sepela : sepela !