Nsango bayeli biso
Refrain. Nsango bayeli biso o nse mobimba
Mwana’ Nzambe abotami kun’o Beteleme
kun’o Beteleme lelo Emanuele (2x)
(Yemba yemba na esengo kumisa Nzambe na esengo)
Yemba yemba Mobikisi ayei
Yemba yemba Mesiya ayei (2x)
Yemba yemba kumis’Emanuele (2x)
1. Etinda ya Mokonzi
Maria na Yozefu bakei o Beteleme
Kopesa nkombo kun’o Beteleme
O kati ya butu Mari’aboti
Mwana wa ye Emanuele
2. Minzoto mikongenge, oyo nsai enene
Mwana’ Nzambe abotami kun’o Beteleme
Banzelu bakoyemba loyembo kitoko
Nkembo na Nzambe o likolo
O nse boboto na bato ba Ye ba bolingo