Toyemba App

Bakonzi basato

F.Kabuiku

Refrain. Bakonzi basato e, bakonzi basato e

Bakolanda monzoto e kin’o Beteleme.

Noel, noel, mwinda mongengi e, Yezu abotami e.

1. Bamemi mpaka ya malasi e solo mpimbo a e,

    Babonzeli Mwana Yezu e,

    Ye Nzambe akomi moto lelo, liloba lya bomoi.

    Tokumisa Nzambe wa bokasi,

1-3. Noele, noele (2x).

2. Azali Nkumu, wolo elembo ya bo Nkumu bwa Ye,

    Babonzeli mpe wolo e na Kristu, Nkumu abotami, Mokonzi wa bakonzi.

    Topesa Ye bolingo,

3. Akowa mpe akosekwa e Topesa Mobikisi lokumu,

    Babonzeli Ye mira e,

    Biso mpe tobonzela Ye mitema na boyambi.

    Noele Mesiy’ayei lelo e.