Yoka nsango
INTRO : Yoka nsango ewuti o Beteleme
Mwana Nzamb’akomi moto o kati ya biso
Azwi nzoto lokola biso Emanuele (2x)
Refrain. (Emanuele, Emanuele)
Emanuele, Emanuele (2x)
Mokili mobimba mokamwi
Emanuele, Emanuele
Mwana wa Nzambe akomi moto
Nzambe o kati ya biso
1. Banzelu bayei kopesa nsango (2x)
Na bakengeli mpata balobi e Mwan’abotami o Beteleme (2x)
1-3: Bakengeli mpata bayoki nsango e (4x)
Mwana abotami o Beteleme (4x)
2. Bakengeli mpata bakei kotala (2x) Mwan’azali o ndako ya bibwele
Babonzeli Mwana mabonza (2x)
3. Maria abombi makambo (2x) Ma bakengeli mpata balobi e
Mwan’abotami o Beteleme (2x)