Noele, mwana nzambe

F.Kabuiku

Refrain. Noele, Mwana Nzambe abotami lelo,

(Tosepela) Liloba akomi moto, ayei o kati ya biso,

Emanuele, Ntoma wa boboto ayei, gloria (2x).

1. Bato batambolaki o molili,

    Bamoni mwinda monene mongengeli bango,

    O miso ma Yo bakomi kosepela e, noel,

    Baboteli biso Mwana mobali,

    Bokonzi bwa Ye bozali na nsuka te,

    Nkombo ya Ye Nkumu wa bwanya,

    Nzambe o kati ya biso. (Noele)