Noel, mwana abotami

Y.Ikete

Refrain. Noel, noel, noel, Mwana Nzambe abotami tosepela e (2x),

Toyemba banso gloria (4x).

1. Banzelu banso bayembi nkembo na Nzambe o likolo,

    O nse boboto na bato ba bolingo (2x).

2. Bakengeli mpata bakimi mbangu o Beteleme e!

    Kotala Mwana Nzambe abotami e (2x).

3. Biso mpe na nsai o mitema toyembela Nzambe

    Ba nzembo kitoko mpe tobinela Ye na lokumu (2x).