Toyemba App

Sepela noel gloria

M.Mpembe

Refrain. Bakristu banso toyemba na nsai Mobikisi abotami (2x) ;

Sepela aa noel gloria (2x).

1. Bakengeli mpata e bayeli biso nsango ya mbotama

    Ya Mwana Nzambe :

    Tala mpe mwinda o boso bwa bango e noel gloria.

2. Bakonzi basato bayei na wolo na mpaka malasi

    Mpo ya kobonzela Mobikisi :

    Tala monzoto liboso na bango e noel gloria.

3. Libiki liyei, tosepela n’esengo mpo ya koyamba Emanuele ee :

    Tala Ye wana o mbeto ya matiti noel gloria.