Nowele, mbotama ya mwana nzambe
Refrain. Nowele, nowele, nowele (5x) mbotama ya Mwana Nzambe.
1. Nsai o kati ya mboka Beteleme, Mwana Nzambe abotami,
Oyo ba profeta basakolaki Ye wana Mokonzi wa bakonzi.
2. Molili molekaki o mokili, tala mwinda mongengi,
Manso mabombamaki mamonani, monzoto mongengi o likolo.
3. Abotami o ndako ya bibwele, na mbeto ya matiti,
Ye ko akobikisa mokili, tal’elembo ya bomikitisi.