Toyemba App

Banso tosepela noel

G.Maye

Refrain. Noel banso tosepela, Noel Mwana Nzamb’abotami,

Noel banso tosepela , esengo e ( 2x)

1. Anzelu wa Mokonzi abimeli bakengeli mpata,

    Alobi na bango e bobanga te,

    Namemeli bino nsango ya malamu ya esengo,

    Lelo o mboka Davidi baboteli bino Mobikisi.

2. Awa bakengeli mpata bayoki maloba ya Anzelu,

    Bamilobeli tokende mbango o Bethelem,

    Kotala mpe komona Mwana Nzambe,

    Bayei mpe bakuti Maria na Yozefu,

    Bamoni Mwana moke, alali o ndako ya bibwele.

3. Emoni bakengeli mpata, manso Anzelu alobaki,

    Batondi n’esengo bakumisi Mwana Nzambe,

    Bazongi o mboka koyebisa baninga e.

4. Banganga minzoto bayei o Yeruzalem,

    Batuni wapi Mokonzi wa bayuda oy’abotami?

    Tomoni monzoto mobimi o likolo, Toyei biso banso kokumisa Ye,

    Toyei biso banso koyembela Ye, Toyei biso banso kobinela Ye,

    Noel, Noel, Noel.