Toyemba App

Noel tomoyembela

D.Mishibabo

Refrain. Noel gloria, noel noel, noel gloria tomoyembela

Emanuele o mboka biso e. (2x)

1. Nzambe o kati ya biso o o, Emanuele,

    Ayei se lokola mwana moke e, oyo nde ndakisa ya bomikitisi e.

2. Tala monzoto mobimi e, na Esti tala nzela libiki likoyela yo,

    Tala Ye nde Nzela ya bomoi.

3. Bakonzi basato, balandi monzoto, bakuti mwana moke

    O mbeto ya matiti, babonzeli Ye wolo mpe palata

    Na mpaka ya malasi solo mpimbo ee e .

4. N’esengo o motema, na nsai banso elongo na banzelu

    Na bakengeli mpata toyembi : Noel gloria in excelsis Deo!