Toyemba App

Yezu yaka

E.Vayemba

Refrain. Yezu yaka se Yo nde Mesiya

Mokili mokozila se Yo (2x)

1. Yaka, Yo liziba lya mai ma bomoi; Yaka obongola butu ya biso na moi

    Na bozito’a masumu, tolingi tobika

    Mokonzi obikisa, toboyi kozika.

2. Yaka Yo Bosembo bwa bato ba mawa; Yaka Yo Mosekwisi o mboka ya bawa

    Ba ebubu, koyoka maloba obazongisela

    Mosumuki mp’esengo ya ye omozongisela.

3. Okokaba bomoi bwa Yo, ngo Yezu; Okopesa nzoto ya Yo, ngo Yezu

    Mpo moto azwa bomoi bokosila te

    Yaka Yo vinu ya bomoi, kozila te.

4. Bakufa miso yaka kobamonisa; Bakufa makolo yak’obatelemisa

    Mitema mipaswani oya noki kosono

    Mayele mapusi ntembe mazwa bosolo

5. Boboto bwa Yo, ya ndenge ya mokili te;

    Mpe bokonzi bwa Yo yango nde bosili te

    Mesiya, bolingi bwa Nzambe’oya na nkembo

    Yak’Emanuele tokoyamba Yo na nzembo.