Toyamba kristu
Refrain. Toyamba Kristu, toyamba Ye,
Toyamba Ye lokola Mobikisi mpe Mokonzi,
Toyamba Kristu toyamba Ye na bomoi bwa biso.
1. Bino Bakonzi ba mboka, bopesa Kristu mitema,
Atia bolingo na kati, wana bongun’ekosila
2. Bino baboti ba biso, bopesa Kristu mitema,
Atia boyokani na kati, wana bokabwani bokosila
3. Bino bilenge mpe bana, bopesa Kristu mitema,
Atia botosi na kati, wana bokowumela na mokili
4. Bino ba soda mpe ba zuzi, bopesa Kristu mitema,
Atia bosembo na kati, wana mobulu mokosila
5. Bino bateki na zando, bopesa Kristu mitema,
Atia bosolo na kati, wana minyoko mikosila