Toyemba App

Toleli mesiya yaka

J.Belengo

Refrain. Yaka e Mesiya, toleli, toleli Emanuele yaka e.

1. O mitema, o mabota, Mesiya yaka e

    O Eklezya ya Yo Esantu Mesiya yaka e.

1-4 : Toleli Mesiya yaka e (2x).

2. Yaka kopesa boboto mpe kimya o mabota manso

    Mpo’te tozala n’esengo ya boyei bwa Yo e yaka e

3. Yaka Yo Mosangisi wa bikolo binso yaka e; Kotisa boyokani o katiya bato

4. Yaka opelisa mwinda bisika molili mokoti; Yaka Kristu e e, yaka Emanuele