Toyemba App

Yaka, yaka emanuele

A.Ibanda

Refrain. Yaka, yaka, yaka e (2x)

Emanuele, Mwana wa Nzambe,

Emanuele Mosikoli e.

1. Yaka Emanuele yaka e (2x)

    Kobikisa mitema mizoki,

    Kolendisa baye balembi na boyambi.

2. Tomilengele malamu (2x)

    Mpo toyamba Mwana wa Nzambe

    Mpo toyamba Mobikisi (yaka).

3. Maria akumbi zemi (2x)

    Akobota mwana mobali,

    Akozala Mokonzi wa mikili minso,

    Mosikoli wa bato banso (yaka).

4. Bitumba mpe nzala o mikili minso (2x)

    Boweli bokonzi, bipai binso,

    Lokoso ya bozwi o mitema mya bato.