Misa esili tokende na boboto
Refrain. Misa esili e tokende na boboto
Misa esili tozonga na nsai
Esengo na biso soki tokotosa Nzambe
Esengo na biso soki tokotosa Ye
1. Soki tosaleli mateya ma Kristu
Tokomona bolamu bwa Nzambe
2. Soki totosi mibeko mya Eklezya
Tokozwa esengo ya lobiko
3. Soki totosi baboti ba biso
Tokowumela mingi awa o nse
4. Soki tolingi baninga ba biso
Tokomona bokonzi bwa Nzambe
5. Soki tosalisi bato ba mpasi
Tokozwa makabo ebele.