Toyemba App

Kobanga te

G.Abbé lewo

1. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’oy’abikisaki Davidi na etumba na Goliate

    Azali na yo mpe lelo akolongisa yo etumba na banguna ba yo banso,

    Sok’ozali na boyambi kobanga te

2. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’oyo asilisaki mpasi ya bato ndenge na ndenge

    Azali na yo mpe lelo, akosilisa bokono e na minyoko mya Yo minso,

    Sok’ozali na boyambi Kobanga te.

3. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’oyo abikisaki Daniel, na mino ya nkosi

    Azali na yo mpe lelo akobikisa yo ndeko na mitambo mya mobebisi,

    Sok’ozali na boyambi kobanga te.

4. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’oyo aleisaki Israël, na mampa mitano na mbisi ibale

    Azali na yo mpe lelo, akoleisa yo seko akolongola bokeleli,

    Sok’ozali na boyambi kobanga te

5. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’o yo asekwisaki Lazare ntango banso babwakaki elikya

    Azali na yo mpe lelo, akosilisa nsomo ya liwa, akopesa yo bomoi e,

    Sok’ozali na boyambi kobanga te.

6. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’oyo apesaki Elisabeth mwana na bobange bwa ye

    Azali na yo mpe lelo, akopesa yo libota, akozongisela yo esengo,

    Sok’ozali na boyambi, Kobanga te.

7. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzamb’alobi okolia e na motoki mwa yo mosala

    Azali na yo mpe lelo, akobongola mitema e, ntembe te misala mikotonda,

    Sok’ozali na boyambi, kobanga te.

8. Kobanga te ndeko wa ngai,

    Nzambe azali mobateli wa yo, ata okufeli mobali

    Azali na yo mpe lelo, ata ozali mwana etike bo Tata akosunga yo,

    Sok’ozali na boyambi kobanga te.