Toyemba App

Lokumu na mokonzi

A de haes

Refrain. Lokumu na Mokonzi, lokumu lonene

Banzelu na bato bayembi nkembo e

1. Minzoto mikongenge na moi mokongala,

    mwese, sanza, mbula basaleli ba Ye

2. Asali monkalali na nkake ya nsomo,

    Mai na mbu enene, bayebisi ba Ye

3. Atindi se liloba, asali molongo,

    Nyama, ndeke, mbisi atondisi wana.

4. Apesi binso esika, esobe na zamba,

    Nzela ya ebale apasoli wana

5. Akolisi matiti o ngomba enene,

    Makobomba nkoi na mbwa ya ngambala

6. Lokumu ntango inso na bango basato,

    Tata, Mwan’ Elimo e nkembo seko e.