Lokumu na mokonzi
Refrain. Lokumu na Mokonzi, nkembo o nkembo o nkembo na Ye (2x)
1. Likolo na nse eye bitondi na nkembo ya Ye
Nzambe e Mokonzi wa nkembo o, Tata a Mokonzi wa nkembo o
2. Akeli ngai moto na lolenge la Ye, nazala elili ya Ye awa o nse.
3. Atindi ngai o nse eye natondisa, nabongisa mpe nakonza mokili mwa Ye.
4. Nayembela Ye nzembo ya botondi
Lokumu na Ye na manso asali mpo ya ngai
Coda : Mokonzi wa nkembo Mokonzi i (bis)
Aleluya kumisa nkombo ya Mokonzi,
Kumisa Ye, bino basali ba Nzambe
Kumisa Mokonzi, banso kumisa Mokonzi
O ndako ya Mokonzi, o ndako ya Nzambe
Bipai binso kumisaka Ye, yembelaka Ye, binelaka Ye e (2x)
Mokonzi amen