Toyemba App

Banso elongo toyemba

A.Libondo

Réfrain. Banso elongo, toyemba n’esengo mpe totondo lelo

Mokonzi Nzambe e, asangisi biso

O libota lyoko, lya bana ba Nzambe

Oyo nde esengo, toyembela Ye e

(A banso e, toyemba n’esengo)

1. Alingi toyembela Ye nzembo

    Nzembo mpo ya lokumu la Ye, toyembela Ye e

    Alingi tobinela Ye mabina;

1-5. A banso e, toyemba n’esengo.

2. Alingi tobetele Ye maboko

    Maboko, mpo ya lokumu la Ye, tobetele Ye e

    Mindule mpo ya lukumu la Ye, tobetele Ye e

3. Alingi tolingana biso banso

    Biso banso mpo ya lokumu la Ye tolingana e

    Tosalisanaka ntango inso

    Ntango inso mpo ya lokumu la Ye, tosalisana e

4. Alingi totosa mitindo mya Ye

    Mitindo mpo ya lokumu la Ye totosa myango

    Ye mei mpo ya lokumu la Ye tosalela Ye e

5. Afrik’ Amerik’ Asia toyemba nzembo

    Mpo ya lokumu la Ye toyembela Ye e

    Europa, Oceania toyemba nzembo