Topesa tata nzambe lokumu
Réfrain. Topesa Yo solo lokumu Tata Nzambe
Lokumu na Yo e. (bis)
1-6: Opesi biso mokolo mwa esengo lelo, lokumu na Yo e:
1. Toyemba, tobina, tobete maboko
2. Toganga na nsai mpo ya Mokonzi
3. Na nkembo enene ovandi o likolo
4. Mokonzi wa biso oleki bolamu
5. Mokonzi wa biso obongi na nkembo
6. Banzelu, mapinga bokumisa Nzambe
1-6: Lokumu na Yo e (2x)