Sepelani banso na esengo
Refrain. Sepela, sepelani banso na esengo
Lelo mokolo mwa nsaï eKumisani Nkolo wa bomoi aleluya
1. Batata kumisani Ye, kumisani Ye
Kumisani Ye, Ye nde Nkolo wa binso aleluya
2. Bamama yembelani Ye, yembelani Ye (2x)
Ye nde Nkumu wa ba nkumu Aleluya
3. Bilenge binelani Ye, binelani Ye (2x)
Ye nde Nkolo wa molongo aleluya
4. Yembelani Ye: Nzambe wabiso
Kumisani Ye : Nzambe wabiso
Totondoni Ye : Nzambe wabiso
Binelani Ye : Nzambe wabiso
5. Bana bilenge : Nzambe wabiso
Bino batata : Nzambe wabiso
Bamama babiso : Nzambe wabiso
Gangani na nsaï : Nzambe wabiso
Usage liturgique: Entrée, Sortie et Action de grâce