Pawuni na ngai ya talo
Refrain. Pawuni na ngai ya talo, mwinda mwa Yezu Kristu,
Mokongenge lokola moi mpe kitoko lokola wolo
1. Nazalaki na mbongo mingi, bomengo mpe biloko binso.
Nazangaki se eloko yoko, Pawuni na ngai ya talo
2. Kasi lelo lokola ndoto, natuti nsuka ya libaku
Nakutani na Yezu Kristu, Pawuni na ngai ya talo
3. Nakoteke biloko binso mpo nasomba bobele yango
Mpe nabatela yango malamu, Pawuni na ngai ya talo.