Toyemba App

Ozwa na yo lokumu

S.Gazamba

Refrain. Ozwa na Yo lokumu Nzambe,

Elongo na Yezu Mwana wa Yo

Na bolingo bwa Elimo Santu

1. Nakumisi Yo Nzambe, natondi Yo botondi,

    Nayembeli Yo Nkolo na ngai;

1-2 Ebongi nakumisa bonene bwa Yo Nzambe

       Na mans’osali mpo ya ngai

2. Mbala mingi nabungaki, Nzambe otali ngai na mawa,

    Obendi ngai pembeni na Yo,

    Olakisi ngai motema mwa Yo nta ngolu,

    Opesi ngai kimya ya solo,

3. Mbala mingi nazangaki, Nzambe otali ngai na ngolu,

    Opesi ngai makabo ebele,

    Mabongi matondi ngai mwana, bolamu mpe epai o,

    Manso nazwi o maboko ma Yo

4. Na mitambo ya mokili mpe makama a,

    Nzambe obateli ngai mwana wa Yo;

    Bomoi bwa ngai o nse eye Nzambe ezali se elembo

    Ya ngolu, ngrasya mpe bolingo bwa Yo.