Toyemba App

Ebongi tokumisa mokonzi nzambe

A.Mbungu

Refrain. Ebongi tokumisa Mokonzi Nzambe,

Toyembela Ye zambi aleki bolamu,

Bolingi bwa Ye, bolingi bwa seko.

1. Mokonzi mpo ya lokumu la nkombo ya Yo

    Opesi ngai bomoi, mpo ya bosembo bwa Yo

    Obikisi ngai o mpasi, tika bikelamu binso bikumisa Yo.

2. Mokonzi ut’o libumu lya mama oyebaki ngai e,

    Yambo’te nabotama osilaki kopono ngai nazala wa Yo,

    Yo wa ngai, lokumu na Yo.

3. Mokonzi nani akokani na Yo o kati ya banzambe banso,

    Nani azali na lokumu mpe azali Mosantu lokola Yo,

    Azali te bobele Yo.