Abba
Abba! (3x) o likolo,
Kuna ovandi na kiti ya nkembo,
Biso bana elongo na banzelu,
Mongongo moko, mongongo moko,
Tokoyembela Yo,
Lokumu mpe nkembo lokumu mpe nkembo
Nabolingo bwa Yo nsuka te:
Opesaki biso Mwana wa Yo se moko
Akomi moto na nguy’Elimo Santu,
Na nzela ya Ngondo Maria.
Lokumu mpe nkembo na Yo Bosato Bosantu
Nzambe se moko mpe Nkumu monene.
Na Yo Tata wa bokasi bonso Mokeli wa likolo na nse;
Na Kristu wa bomoi, Mokonzi wa bileko mpe bomoi
Na Elimo Mosantisi wa biso; lokumu nkembo lelo lobi
O bileko na bileko o bileko nsuka te
Gloria oh! In excelsis Deo