Bikolo binso
Refrain. Bikolo binso, bobete maboko makasi,
Boyembela Nzambe, boganga na nsai
1. Nkembo na Mokonzi Nzambe wa bomoi
Alingaki biso naino mokili mobandi te
Azali Nzambe nta ngolu mpe nta bolamu
Nkembo na Ye aleluya
2. Nkembo na Mokonzi Nzambe wa boboto
Akobimisa moi mpe akonoisa mbula
Bato babe na bato balamu
Bayeba bolingo bwa Ye, totondo Ye aleluya
3. Nkembo na Mokonzi Nzambe wa esengo
Akopesa boboto mpe akobatela biso
O likolo mpe awa o ns’eye toyemba tobinela Ye
Lokumu na Ye aleluya, aleluya, aleluya