Zua lokumu
1. Nkolo wa ngai, napusani pembeni na Yo,
Kobelela pe kobondela, sala na ngai ngolu.
Mokili oyo, eboyi n’ango kosekisa ngai
Epesi ngai mokongo mpenza, pasi eleki
Na molimo mposa’ kokumisa Yo meke,
Kasi ngai nzoto makasi te, bwale boleki
Refrain 1. Elikya nabungisi te mpo bomoi bwa ngai, esimbami na Yo,
Minyoko to mpasi ekoki kopekisa ngai te, nakumisa Yo Nkolo,
Zua lokumu, Nzambe na bomoi,
Zua lokumu Mobateli na ngai. (2x)
Nzela na Yo nzube mpe mitambo mileki, Mposa kokoba esili ngai, nzoto elembi.
Refrain 2. Nayebi bolingo bwa Yo boleki bwa ngai, bwale na bonene,
Nzambe moko te akufelaki ngai mpo ‘te, ngai nazua lobiko
Zua lokumu, Nzambe na bomoi,
Zua lokumu mobateli wa ngai. (2x)