Te deum laudamus
Intro: Mpo ya Makabo ma Yo
Refrain. Ee Nzambe totondo Yo, totondo Yo (2x);
Totondo Yo Nzambe, totondo Yo Nzambe.
1. Banzelu banso : bakokumisa Yo
Molongo mobimba : mokokumisa Yo
Mangomba manso : mangomba manso
Kotika te se koyemba : Santu;
Bakerubim : Santu
Baserafim : Santu
Mokonzi Nzambe wa likolo yo Mosantu
2. Milongo mya bapostolo : nkembo, nkembo bakokumisa Yo
Ebele ya baprofeta : nkembo, nkembo bakokumisa Yo
Mangomba mya bamartiru : nkembo, nkembo bakokumisa Yo
Yo ooo (3x).
3. Kristu yo Mokonzi wa nkembo; Mwana wa Tata wa lobiko
Oboyi te, obangi te, kobotama na Ngondo
Okomi moto n’obikisa bango,
obukaki likonga lya liwa; ofungoleli baye bakoyamba Yo
Bokonzi (2x) bwa likolo,
Ofandi o loboko la mobali la Nzambe o nkembo ya Tata.
Refrain 2. Ee Nzambe, okozonga tokoyamba bozuzi (2x);
Totondo Yo Nzambe, totondo Yo Nzambe.
4. Obatela basaleli ba Yo : Tokobondela Yo
Na yo makila obabikisa : Tokobondela Yo
Osala’te bakoma basantu : Tokobondela Yo
Obikisa, obenisa bango : Tokobondela Yo
Okonza obakumb’o likolo : Tokobondela Yo Nzambe.
Refrain. Ee Nzambe totondo Yo, totondo Yo mokolo na mokolo (2x);
O bileko na bileko seko tokokumisa ya Yo nkombo.
5. Lelo Mokonzi tosala lisumu te : Yokelaka biso ngolu
Ya Yo Mokonzi ngolu ekosila te : Yokelaka biso ngolu
Nayebi’te nd’oyokisi ngai nsoni te : Yokelaka biso ngolu.