Toyemba, tobina
Refrain. Toyemba, tobina, tobetele Ye maboko
Na nsai o mitema, banso tokumisa Ye
Na mbonda nalindanda,Banso tokembisa Tata Nzambe
Mokonzi wa bakonzi.
1. Mokolo mwa nsai mokoki lelo a, mokoki lelo e,
Bayi mboka boyakani banso e a, boyakani banso:
1-5. Tobetele Ye maboko, tobetele Ye bangongi,
Tobetele Ye mindule, tobetele Ye milolo o,
Banso toganga na nsai e: Mokonzi wa bakonzi.
2. Mokonzi wa biso azwa lokumu a, azwa lokumu e,
Na nzembo mpe na mbonda kitoko e a, tobinela Ye:
3. Esengo na biso bikela bya Ye a, bikela bya Ye e,
Toyembela Ye nzembo ya nkembo o a, na nsai o mitema:
4. Nganga Nzambe kamba nde lisanga a, kamba nde lisanga,
Mpo toyembela Nkumu monene e a, Nkumu
Mokonzi wa bakonzi.
5. Maboko tobete mpo ya Yo Tata a, mpo ya Yo Tata e,
Tobina mabina ma nsai e a, lokumu na Yo e: