Nta bosembo
Solo. A Nzambe nta Bosembo o o
Refrain. Nakumisi Yo Nzambe na motema mwa ngai
Natondi na mposa ya kosalela Nzambe
Natiki o maboko ma Yo bomoi bwa ngai
Nakolanda Kristu Yo Nzela na ngai
1. Yezu Mokonzi ozali Bolingo : Bolingo
Yezu Mokonzi ozali Bopeto : Bopeto
Yezu Mokonzi ozali Bosembo : Bosembo
2. Tika nakumba Kuruse na ngai
Ngai nameme yango kin’onsuka ya bomoi bwa ngai
A Nzambe nta Bosembo o o
3. Nandimi kokufa mpo na Yo; Naponi nzela ya libiki
A Nzambe nta Bosembo oo
4. Naponi bosembo bwa Kristu; Naponi kosambwa mpo na Ye
A Nzambe nta Bolingo oo