Toyemba App

Aleluya nkembo na yo nzambe

G.Mayenda

Refrain. Aleluya, aleluya,

Nkembo na Yo Nzambe,

Aleluya lokumu na Yo (2x)

1. Okeli ngai moto na elili ya Yo,

    Opesi ngai bomoi, lokumu na Yo (2x)

2. Nakumisi Yo Nzambe wa ngai Yo liziba lya bomoi,

    Yo nzela ya libiki, lokumu na Yo (2x)

3. Nayembeli Yo Nzambe wa ngai Yo bolingo bwa seko,

    Yo nzela ya boboto, lokumu na Yo (2x)

4. Olongoli ngai na masumu, oyambi ngai,

    Yo nzela ya bopeto, lokumu na Yo (2x)