Yaka kolia nzoto
Refrain. Yaka kolia nzoto ya Kristu;
Mpe komele makila ma Ye
Yaka kolia nzoto ya Kristu; Bilei bya seko.
1. Moto oyo akondima ngai solo; Nakokot’o motema mwa ye.
Nakokomisa ye moto wa sika e; mpo nazali Nzambe.
2. Bilei nakopesa bino; bizali nzoto mpe makila ma ngai
Bolia yango na boyambi e, nde bokobika
3. O likolo lya kuruse; namikabi mpo ya banso e
Na ntina te bosala se boye; mpo ya bolingo bwa Nzambe
4. Esengo na moto oyo Kristu; akobyang’o limpati lya Ye.
Tala Mwa Mpata ya Nzambe; oy’akolongola masumu ma bato e