Toyemba App

Nzoto na makila ma yezu

J.Vatoma

Refrain. Nzoto na makila ma Yezu e, bilei bya solo e;

Toteleme banso mpo tolia e nzoto ya mobikisi

1. Evandi Yezu na bapostolo o meza, alobi na bango mingi;

    Atomboli miso epai ya Nzambe; mpe abenisi mampa.

2. Abuki mampa mpe apesi na balei, alobi na vango ye’ te:

    Ya mampa kamatani banso bolia, nzoto mei ya ngai wana.

3. Asimbi nkeni mpe asambeli lisusu, alobi na bango ye’ te:

    Ya vino kamatani banso bomele, Nkeni ya libiki e

4. Bozwi nde nzoto na makila ma bondeko bwa sika mpe bwa seko e,

    Sik’ awa bino mpe bosala se boye, mpo te bato babika.