Namilengeli
Refrain. Namilengeli ye ye ngai oyo,
Namilengeli ye ye nabongisi motema mwa ngai,
Ngai wana nakeyi kokula nzoto ya Yezu.
1. Mokonzi ngai nde nani e, ‘te oyingela o ndako ya ngai
Loba se liloba lyoko molimo mwa ngai mokobika.
2. Ngai mosumuki moto mpamba, moto ya mawa e
Nasimba song’elamba na Yo ngai nabika
3. Ngai nazali mampa ma bomoi, Ngai nazali nzela e,
Moto akolia ngai ata awei akozala na bomoi.
4. Kamatani boliya e, kamatani bomele
Makila ma ngai masopani mpo ya bino
Mpe mpo ya bolimbisi masumu
5. Zachée kita, kita, kita yaka o ndako na yo,
Tokabola limpati lelo ozwa libiki.