Kamatani bolia
Refrain. Kamatani bolia, kamatani bomele (2x)
Mampa mazali nzoto ya Ngai,
Vino ezali makila ma Ngai,
Makila ma bondeko bwa sika
Makosopana mpo ya bino e (mpo ya bino e)
Mpo ya bino e, mpo ya bino e mpo ‘te bozua bomoi bwa lobiko (2x)
1. Evandi Yezu o meza elongo na bayekoli ba Ye
Atomboli miso likolo akamati limpa abuki lyango alobi :
2. Evandi Yezu o meza elongo na bayekoli ba Ye
Akamati nkeni atali likolo asambeli lisusu alobi :
3. Telemani banso (2x) batata telemani banso tokende kolia nzoto ya Ye,
Bamama telemani banso tokende komele makila ma Ye e,
Bilenge telemani banso tokende o meza esantu ya Ye.