Yezu ye mei o sacramentu
Refrain. Yaka ndeko kolia nzoto ya Mokonzi e,
Yaka ndeko komele makila ma Ye,
Yezu Ye mei o Sacramentu.
1. Akabi nzoto mpo ya ngai,
Mpo nazwa bomoi bwa lobiko,
1-5. Yezu Ye mei o Sacramentu.
2. Asopi makila mpo ya ngai, mpo nazwa bomoi bwa lobiko,
3. Ayambi ngai o limpati,
Ngai mpe napesa esengo na baninga banso.
4. Abikisi ngai o lisumu, ngai namipesa na Ye,
Nabongola motema.
5. Amipesi mobimba mpo ya Eklezya,
Ngai namikaba mpe na bato lokola Ye.