Toyemba App

Tolia nzoto ya mokonzi

Equateur

Refrain. Tolia nzoto ya Mokonzi,

Tomele makila ma Mokonzi

Wana ezali libiki lya bakristu

E Nzambe yamba ngai na esengo

1. E Nzambe Mozalisi wa bato,

    Zalisaka biso ntango inso,

    Ntango tokolia mpe tokomele

    Nzoto na makila ma Mokonzi e

2. E Yezu Mobikisi wa bato

    Bikisaka biso ntango inso,

    Ntango tokolia mpe tokomele

    Nzoto na makila ma Yo Mokonzi e

3. Elimo, Mosantisi wa bato,

    Santisaka biso ntango inso,

    Ntango tokolia mpe tokomele

    Nzoto na makila ma Mokonzi e

4. Mokolo mwa minei mosantu,

    O butu bona bwa nsomo nsomo,

    Yezu amikomisi bilei

    O miso ma bayekoli ba Ye

5. E mama, mama santu Maria

    Sambelela biso ntango inso

    Ntango tokolia mpe tokomele

    Nzoto na makila ma Mokonzi e