Limpati lya bomoi
Refrain. Kristu alambi limpati mpe abengi biso banso
Tolia mpe tomele elongo na Ye, yakani.
1. Tala limpa lya bomoi e nzoto ya Kristu; moto akolia yango nde abiki solo
2. Tala nkeni ya libiki e, makila ma Kristu; moto akomele mango nde abiki solo
3. Nabungaki nzela ya Yo, Nabongoli motema lelo e ngai natubeli
Mpo ‘te nakula Kristu bilei bya lobiko iya o
4. Yakani e ndeko na ngai yakani na esengo o motema
O limpati lilambi Tata, Tata wa ngai