Tokende kuna o meza
Refrain. Tokende e kuna o meza esantu,
Kuna tokokuta limpati lilambi Mokonzi,
Tokende kuna o meza esantu,
Tolia mpe tomele makila ma Yezu (Kristu, ee tokende) (bis)
1. Nzoto ya Ye nde nsuni ya lobiko,
Makila ma Ye nde binua bya lobiko,
E Yezu Ye Libiki lya biso e, Yezu Ye Bolamu bwa biso bato
2. Yambo ya kokende kuna o meza,
Omitala malamu soki olongobani mpenza,
Bongo ndeko oteleme na nsai, okula mpe omele makila ma Yezu
3. Abengi biso mpo azali Mwinda mwa biso,
Abengi biso mpo azali Nzela ya bomoi, mpo tokoma kuna epai ya Nzambe,
Nde toleki naino epai ya Yaya Yezu