Nayei o meza
Refrain. Ngai nayei lelo e, o meza ma Yo Tata (2x)
Kokula nzoto ya Yezu Libiki.
Bilei bya solo obongisi mpo ya ngai
Mpo te nazua bomoi bwa lobiko (2x)
1. Nzoto ya Yo e Mokonzi Yezu, Bokasi bwa ngai e ntango ya mpasi e,
Tika nakula ngai nakula Kristu (2x)
2. Ngai nabelemi e o meza ma Yo e, Kokula nzoto bilei bya lobiko,
Yango mampa, mampa masantu e (2x)
3. Yakani banso na eseng’omitema, Komele makila nkeni ya libiki e,
Liziba lya bopeto, mpe lya bolimbisi