Toyemba App

Yaka e tokula nzoto ya yezu

J.Abbé makamba

Refrain. Yaka e tokula nzoto ya Yezu,

Bilei bya lobiko tokokula e, nzoto ya Yezu libiki lya bomoi.

Makila ma Ye libiki lya biso o

Tokende, tokende, tokende ee,

Tokula, tokula libiki e nzoto ya Yezu libiki lya bomoi.

1. Namilengele (2x) namibongisa (bis)

    Nabongola motema natubela na ngai, Nakula nakula nzoto ya Yezu bilei.

1-4. Tokende, tokende, tokende ee,

       Tokula, tokula libiki e, nzoto ya Yezu libiki lya bomoi.

2. Nakobeleme nakobongisa libala,

    Nakobongisa mibeko mya Nzambe,

    Nakokula a, nakokula na ngai e, Nakokula a, nakokula Yezu.

3. Namilengele (2x) namibongisa (bis)

    Lelo nakozua bomoi bwa lobiko (2x) o esengo o

4. Namitungisaka mingi mpo na nini nakulaka te (2x)

    Nandimi mbeba na ngai na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato

    Nakotika a nakotika na ngai e, Nakotika a mpo nakula Yezu