Toyemba App

Nabelemi lelo

J.Belengo

Refrain. Ngai nabelemi lelo o altare ya Yo (2x)

Mpo ya kokula nzoto ya Yo e mpe komele makila ma Yo

Libiki lya biso e,

Mpo ya kokula nzoto ya Yo e mpe komele makila ma Yo

Bokasi bwa biso e

1. Mokonzi ngai nde nani, mpo ‘te oyingela, o ndako ya ngai

    Moto mpamba, loba se liloba lyoko molimo mwa ngai mokobika.

2. Namilengeli e mpe namibongisi e, mpo ‘te nakula nzoto ya Yo,

    Bilei bya lobiko, mpe makila ma Yo libiki lya biso e.

3. Ya solo nsai etondi motema mpo nakuli Kristu Bilei bya lobiko