Toyemba App

Yezu mampa ma bomoi

D.Mishibabo

Refrain. Nakula Yo, ngai namilengeli e, nabelemi e,

O lotale la Yo Yezu Kristu,

Yo Mampa ma bomoi nakuli e lelo

Yo Yezu Kristu, Yo Mampa ma bomoi nakuli e

1. Nabungaki e, ngai nabebisaki motema na bisengo bya nse,

    Lelo natubeli e mpe nayei e, kokutana na:

1-3. Yo Yezu Kristu, Yo Mampa ma bomoi nakuli e lelo

       Yo Yezu Kristu, Yo Mampa ma bomoi nakuli e

2. Nandimi e, nzoto ya Yo nde bilei bya lobiko la bato,

    Yango nayei e mpe nalingi e, kokutana na :

3. Nandimi e, makila ma Yo nde binua bya lobiko la bato,

    Yango nayei e mpe nandimi e, kopetuama na :