Toyemba App

Biloko tozwi

J.Pere luzitu

1. Tata otondisa bibale bya biso na mbisi ndenge na ndenge

    Topepi tozwi toyei kobonzela Yo

    Otondisa zamba na esobe na biso na nyama ebele

    Lifut’a bokila toyei kobonzela Yo.

Refrain. Biloko tozwi tokobonzela Yo lokola Abarama Tata wa biso

Tokosenge Yo oyamba byango lokola libonza ly’Abele mosaleli wa Yo

2. Onokisaki mbula mpe bilanga binso bikoli malamu

    Tobuki ndunda toyei kobonzela Yo

    Obimisaki moi mpe mbuma ya nzete inso ikomeli

    Yang’oyo tomemi toyei kobonzela Yo

3. Opesaki biso makasi na misala minso tosalaki

    Lifuta tozwi toyei kobonzela Yo ;

    Manso tosalaki o kati ’a mikolo minso milekaki

    Tomemi mango toyei kobonzela Yo

4. Bandeko banso bazali na mpasi o kati ya lopitalo,

    Tokokanisa bango toyei kobonzela Yo

    Baye banso bakangemi na mpasi’o kati ya boloko

    Tokokanisa bango toyei kobonzela Yo

5. Tala baboti, tala bana, tala bakolo mpe bilenge

    Toyei banso toyei komibonza na Yo

    Tala mampa, tala vino, tala lifuta lya misala mya biso

    Tomemi manso toyei kobonzela Yo.