Bonzela mokonzi
Refrain. Bonzela Mokonzi na motema moko,
Nzambe alingi oy’apesaka n’esengo (2x)
Bonzela Mokonzi bonzela e Mokonzi (2x)
1. Soki oloni moke okobuka moke
Soki oloni mingi okobuka mingi
2. Tika koyima yima mpo ya kosalisa babola
Tika koyima yima mpo ya kosalisa Eklezya
3. Kobonzela Nzambe wa yo mbongo ya nkisi te
Kobonzela Nzambe wa yo mbongo ya makila te
4. Kobonzela Nzambe wa yo mbongo ya kindumba te
Kobonzela Nzambe wa yo mbongo ya moyibi te