Ntongo ya lelo
Refrain. Ntongo ya lelo ntongo ya esengo
Tokende banso kokumisa Mokonzi
Nzambe wa bolingo, Mokonzi wa bakonzi
Bato banso bakoluka se Yo Nzambe wa bango
Tata e lokumu na Yo e, Tata e
1. Nzambe apesi biso moi mwa lelo mwa sika: Tokende kokumisa Ye (2x)
2. Nzambe apesi biso mpema ya Ye ya sika: Tokende kokumisa Ye (2x)