Tata yamba mabonza
Refrain. Tata yamba e, (4x) mabonza ma bana lelo bapesi na Yo.
1. Topesi na Yo mampa na vino e, mampa ma bomoi oyamba e
Nkeni ya libiki oyamba e
2. Topesi na Yo eteni ya zomi ya misala mya biso
Oyamba e mabonza
3. Topesi na Yo mitema mya biso
Bomoi bwa biso, bamposa ya biso losambo la biso,
Tous: Mitema mya biso, Bomoi bwa biso,
Bamposa ya biso losambo la biso.
4. Topesi na Yo mboka ya biso e, bakonzi banso obayamba e
Bayangeli banso obayamba e
5. Topesi na Yo paloase ya biso, bakristu banso obayamba e
Bamibonza banso obayamba e