Topesi yo mabonza
Refrain. Topesi na Yo e Nzambe mabonza ma biso bana ba Yo e (bis)
1. Tobelemi o lotale la Yo e, na botosi mpo tobonzela Yo (2x)
2. Biso bana, tosangisi maboko mpe mitema mpo tobonzela Yo e (2x)
3. N’esengo enene toyei kopesa mabonza ma biso e Tata e (2x)
4. Manso tozui tomemi e, elembo ya bolingo bwa biso e.
Réf.2 : Tata yamba e mabonza ma bana (bis)
1-3. Tobonzeli Yo e,
1. Mbuma misala mya biso Nzambe (2x)
Misolo mya biso : Yamba e Tata yamba e
Mampa na vino : Yamba e Tata yamba e
Nyama ya zamba : Yamba e Tata yamba e
Nsoso ya mboka e : Yamba e Tata yamba e
1-3. Yamba, yamba Tata mabonza ma biso bana ba Yo (2x)
Iyole, iyole o (2x)
2. Mabota ma biso Nzambe (2x)
Baboti ba biso : Yamba e Tata yamba e
Bilenge banso : Yamba e Tata yamba e
Bolingo bwa biso : Yamba e Tata yamba e
Mpe bomoko bwa biso e : Yamba e Tata yamba e
3. Eklezya ya biso Nzambe (2x)
Basango ba biso : Yamba e Tata yamba e
Bamamelo banso : Yamba e Tata yamba e
Losambo la biso : Yamba e Tata yamba e
Mpe mitema tobonzi e : Yamba e Tata yamba e